ETENI 6
Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
NZAMBE akelaki mabele mpo ezala esika malamu oyo moto asengeli kofanda. Liloba na ye elobi ete: “Likoló ezali ya Yehova, kasi mabele, apesá yango bana ya bato.”—Nzembo 115:16.
Liboso Nzambe akela moto ya liboso Adama, aponaki eteni moko ya moke ya mabele mpe akómisaki yango elanga moko ya kitoko oyo ebengamaki Edene. Makomami elobi ete motó ya ebale Efrate mpe ya ebale Tigre (Hidekele) ebandaki na Edene. a Balobaka ete elanga ya Edene ezalaki na esika oyo ekólo Turquie ezali lelo, na ɛsti na yango. Ya solo, elanga ya Edene ezalaki mpenza awa na mabele!
Nzambe akelaki Adama mpe atyaki ye na elanga ya Edene “mpo na kolona yango mpe kobatela yango.” (Ebandeli 2:15) Na nsima, Nzambe asalelaki Adama mwasi, nkombo na ye Eva. Nzambe apesaki bango etinda oyo: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino.” (Ebandeli 1:28) Emonani polele ete Nzambe “azalisaki [mabele] mpamba te, [kasi] asalaki yango mpo bato báfanda wana.”—Yisaya 45:18.
Kasi, Adama ná Eva batombokelaki Nzambe na ndenge babukaki mobeko na ye na nko. Yango wana, Nzambe abenganaki bango na elanga ya Edene. Paradiso ebungaki. Mpe mpasi oyo lisumu ya Adama ebimisaki esukaki kaka epai na bango moko te. Makomami eyebisi biso ete: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.”—Baroma 5:12.
Yehova atikaki nde mokano na ye ya ebandeli, oyo ezalaki ete mabele ezala paradiso, epai bato ya esengo bakofanda? Te! Nzambe alobi boye: “Liloba oyo ezali kobima na monɔkɔ na ngai . . . ekozongela ngai te soki ekokisi naino likambo na yango te, kasi ekosala mpenza oyo nasepeli na yango, mpe ekolonga mpenza na likambo oyo natindaki yango.” (Yisaya 55:11) Paradiso ekozonga awa na mabele!
Bomoi ekozala ndenge nini na Paradiso yango? Talá bilaka oyo Makomami epesi na nkasa mibale oyo elandi.
a Ebandeli 2:10-14 elobi boye: “Ebale moko ezalaki kobima na Edene mpo na kopɔlisa elanga, mpe uta na esika yango ebandaki kokabwana mpe ekómaki, tóloba, mitó minei. Nkombo ya oyo ya liboso Pishone . . . nkombo ya ebale ya mibale Gihone . . . nkombo ya ebale ya misato Hidekele [to Tigre]; ezali oyo ezali kokende na ɛsti ya Asiri. Mpe ebale ya minei ezali Efrate.” Lelo oyo, esika oyo bibale mibale ya liboso ezalaki koleka eyebani te, bankombo na yango mpe eyebani te.