Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Kolangwa ezali mpenza mabe?

Kolangwa ezali mpenza mabe?

Mokapo 34

Kolangwa ezali mpenza mabe?

Okopesa biyano nini na mituna oyo elandi? Tyá elembo oyo ✔ na kare, pembeni ya eyano oyo okopesa.

Ozali na baninga oyo bamɛlaka masanga liboso bákokisa mbula oyo esɛngami na mibeko ya Leta to oyo balangwaka?

□ Ɛɛ □ Te

Baninga na yo basí batyá yo mbamba mpo omɛla masanga?

□ Ɛɛ □ Te

Osí olangwá masanga?

□ Ɛɛ □ Te

KOLANGWA elimboli nini? Bato mosusu balobaka kaka ete elimboli komɛla mingi. Lapolo ya ebongiseli moko na États-Unis (The National Institute on Alcohol Abuse and Alcoholism) elimboli likambo yango polele. Elobi ete kolangwa “elimboli mpenzampenza komɛla na mbala moko kɔpɔ mitano to koleka mpo na mibali, mpe kɔpɔ minei to koleka na mbala moko mpo na basi.”

Soki osilá koyoka mposa makasi ya komɛla mingi to komɛla liboso okokisa mbula oyo esɛngami na mibeko ya Leta, yebá ete ozali yo moko te. Bilenge mingi balekisaka ndelo na komɛla masanga. * Kasi, omituna boye: ‘Makambo nini nayebi mpenza mpo na ntina oyo nalingi komɛla mpe oyo masanga ekoki kosala na nzoto na ngai?’ Na ndakisa, yanolá solo to lokuta na mituna oyo. Tyá elembo pembeni ya eyano oyo okopesa, mpe na nsima talelá makambo oyo elobelami na nse.

a. Bilenge bamɛlaka kaka mpo basepelaka na masanga.

□ Solo □ Lokuta

b. Lokola bilenge bazali naino makasi mpe na nzoto malamu, masanga mingi esalaka bango mabe mingi te na nzoto koleka mikóló.

□ Solo □ Lokuta

c. Kolangwa ebomaka te.

□ Solo □ Lokuta

d. Biblia epekisi komɛla masanga.

□ Solo □ Lokuta

e. Kolangwa ebebisaka kaka nzoto ya moto.

□ Solo □ Lokuta

a. Bilenge bamɛlaka kaka mpo basepelaka na masanga. Eyano: Lokuta. Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Australie, emonisaki ete bilenge mingi (36%) balobaki ete bamɛlaka libosoliboso mpo bálanda baninga na bango. Na ankɛtɛ moko oyo esalemaki na États-Unis, bilenge mingi (66%) balobaki ete bamɛlaka mpo baninga na bango batyaka bango mbamba. Kasi, ebele ya bilenge mosusu balobaki ete bamɛlaka mpo na kobosana mikakatano.

b. Lokola bilenge bazali naino makasi mpe na nzoto malamu, masanga mingi esalaka bango mabe mingi te na nzoto koleka mikóló. Eyano: Lokuta. Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Discover) elobi ete: “Bolukiluki oyo esalemi mikolo oyo, emonisi ete bilenge oyo bamɛlaka masanga, batyaka bomoi na bango na likama.” Mpo na nini? “Bilenge oyo balekisaka ndelo na komɛla masanga, bakoki kobebisa mpenza makoki na bango ya kokanisa.”

Moto oyo azali na momeseno ya komɛla masanga akoki kokóma na babutɔ mingi na elongi, mposo ya nzoto na ye ekoki konuna liboso akóma mokóló, akoki kokóma monene, mpe kokóma moombo ya masanga mpe ya badrɔgɛ. Ekoki kobebisa bɔɔngɔ, libale (foie) mpe motema.

c. Kolangwa ebomaka te. Eyano: Lokuta. Soki masanga etondi na nzoto ya moto, bɔɔngɔ na ye ekozanga oxygène; mpe binama mosusu ya nzoto ekoki kotika kosala mokemoke. Moto akoki kobanda kosanza, komiyeba lisusu te, mpe kopema lisusu malamu te. Ntango mosusu akoki mpe kokufa.

d. Biblia epekisi komɛla masanga. Eyano: Lokuta. Biblia epekisi komɛla masanga te, epekisi mpe te ete bilenge básepela na bomoi. (Nzembo 104:15; Mosakoli 10:19) Kasi, osengeli naino kokokisa mbula oyo esɛngami na mibeko ya Leta mpo obanda komɛla masanga.​—Baroma 13:1.

Nzokande, Biblia epekisi kolangwa masanga. Masese 20:1 elobi boye: “Vinyo ezali mosɛki, masanga oyo elangwisaka ezali na makambo mobulumobulu, mpe moto nyonso oyo azali kotika yango ebungisa ye azali na bwanya te.” Masanga ekoki kosalisa yo bozoba! Ezali solo ete ekoki kopesa yo esengo mpo na mwa ntango moke, kasi, soki olekisi ndelo, ‘ekoswa yo lokola nyoka,’ mpe ekomemela yo mikakatano ebele.​—Masese 23:32.

e. Kolangwa esukaka kaka na kobebisa nzoto ya moto. Eyano: Lokuta. Soki olangwe masanga, ekozala lisusu mpasi te mpo bato básala yo mabe, ata mpe kosangisa na yo nzoto na makasi. Mpe lisusu, okoki kozala likama mpo na bato mosusu; okoki kobanda kosala makambo oyo eyokani te na ndenge ozalaka. Biblia ekebisi ete soki olangwe masanga, “okokóma komona biloko ndenge na ndenge, pe okobanda koloba makambo ezangá tina.” (Batoli [Masese] 23:33, Bible na lingala ya lelo oyo) Na mokuse, okokóma lokola moto ya ligboma! Kati na makambo mosusu ya mpasi, tokoki mpe kotánga oyo: okokabwana na baninga na yo, okozala lisusu mayele te na kelasi, okosala lisusu mosala malamu te, okoki kosala bato mabe mpe okoki kokóma mobola.​—Masese 23:21.

Likambo eleki ntina, talelá ndenge oyo kolangwa masanga ekoki kobebisa boyokani na yo na Yehova. Yehova Nzambe alingi ete osalela ye na “makanisi na yo nyonso,” kasi te na makanisi oyo ebebisami na milangwa. (Matai 22:37) Liloba ya Nzambe epekisi kaka te “kolekisa ndelo na vinyo,” kasi mpe “komɛla mingi.” (1 Petro 4:3) Yango wana, kolangwa masanga eyokani te na mokano ya Mozalisi na biso mpe ekopekisa yo ozala na boyokani malamu ná Nzambe.

Okopona kosala nini?

Okolanda kaka baninga na yo oyo balekisaka ndelo na komɛla masanga? Biblia elobi boye: “Boyebi te ete soki bozali kokoba komipesa na moto moko bózala baombo mpo na kotosa ye, bozali baombo na ye na ndenge bozali kotosa ye?” (Baroma 6:16) Olingi mpenza kokóma moombo ya baninga na yo mpe ya masanga?

Osengeli kosala nini soki okómi na momeseno ya kolangwa masanga? Kozanga koumela, luká lisalisi epai ya moboti na yo to moninga moko oyo akɔmɛli. Bondelá Yehova mpe sɛngá ye asalisa yo. Mpo azali “lisalisi oyo ezwamaka noki na bantango ya mpasi.” (Nzembo 46:1) Lokola mbala mingi baninga nde batyaka moto mbamba mpo alangwa masanga mpe abanda komɛla masanga liboso akokisa mbula oyo esɛngami na mibeko ya Leta, osengeli koyeba malamu kopona baninga na yo. * Kosala bongo ekoki kozala mpasi, kasi na lisalisi ya Yehova, okoki kolonga.

NA MOKAPO OYO ELANDI

Moto akoki kotika kozala moombo ya badrɔgɛ. Talá soki yango ekoki kosalema ndenge nini.

[Maloba na nse ya lokasa]

^ par. 11 Talá etanda  “Banani bamɛlaka?” na lokasa 249.

^ par. 32 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá mokapo 8 mpe 9 ya buku oyo mpe mokapo 15 ya volimi 2.

VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO

‘Molangwi-masanga . . . akokóma na bobola.’​—Masese 23:21.

TOLI

Luká koyeba ntina oyo olingaka komɛla masanga. Na nsima luká mayele mosusu ya malamu koleka oyo okoki kosalela mpo na komisepelisa to mpo na kokitisa mitungisi.

OYEBAKI YANGO . . . ?

Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na États-Unis, emonisi ete “koleka bato oyo bamɛlaka te, mbala mingi balangwi-masanga bakimaka kelasi, bazongisaka badevuare na retare, bamisalaka mabe to bazokaka mpe babebisaka biloko ya bato.”

MAKAMBO OYO NAKOSALA

Soki baninga na ngai baz’otinda ngai namɛla masanga mingi, nakoloba ․․․․․

Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․

OKANISI NINI?

● Mpo na nini baninga na yo balingaka ete bilenge mosusu básangana na bango mpo na komɛla masanga mingi?

● Komɛla masanga mingi ekosala ete bana basi to bana mibali básepela na yo? Mpo na nini olobi bongo?

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 250]

“Soki bana kelasi bapesi ngai masanga namɛla, nayebisaka bango ke naza’ na mposa ya komɛla masanga te mpo namisepelisa.”​—Mark

[Etanda na lokasa 249]

 Banani bamɛlaka?

Na ankɛtɛ moko oyo esalemaki epai ya bana ya eteyelo ya secondaire na Angleterre, na Écosse mpe na pays de Galles, mwana moko kati na bana minei ya mbula 13 mpe 14 alobaki ete “asilá komɛla kɔpɔ mitano ya masanga na mwa ntango moke.” Na ankɛtɛ oyo esalemaki epai ya bilenge ya mbula 15 mpe 16, ndambo na bango balobaki ete basalaki mpe bongo. Ebongiseli moko ya États-Unis (Department of Health and Human Services) emonisi ete “bilenge pene na milio 10 na ndambo, oyo bazali na mbula 12 tii 20, bamɛlaka masanga. Na kati na bango, bilenge koleka milio 5 balangwaka masanga, mpe bilenge koleka milio 2 balangwaka mbala mitano na sanza moko.” Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Australie emonisaki ete na ekólo yango, bilenge basi balangwaka masanga koleka bilenge mibali​—bakoki komɛla na ntango moke kɔpɔ 13 ya masanga, ata mpe tii 30!

[Elilingi na lokasa 251]

Masanga ekoki koswa lokola nyoka