Mpo na nini papa ná mama bakabwani?
Mokapo 4
Mpo na nini papa ná mama bakabwani?
“Nazalaki na ndako ná mama mokolo oyo papa atikaki biso. Nazalaki kaka na mbula 6, mpe nayebaki te likambo nini ezalaki kosalema. Nafandaki na nse, nazalaki kotala televizyo mpe nazalaki koyoka ndenge mama na ngai azalaki kolela mpe kobondela papa mpo akende te. Papa akitaki ná valize na mabɔkɔ, agumbamaki, apesaki ngai bizi mpe ayebisaki ngai boye: ‘Nakolinga yo kaka.’ Na nsima, abimaki na porte. Nsima na yango, namonaki lisusu papa te mpo na ntango molai. Kobanda ntango wana, nazalaki kobanga ete mama mpe akende.”—Elaine, azali na mbula 19.
SOKI baboti na yo babomi libala, okoki komona lokola nde bomoi esuki mpe ete okotikala na mpasi bomoi na yo mobimba. Mbala mingi, yango ememaka mpenza nsɔni, nkanda, mitungisi, kobanga básundola yo, komona lokola omemi ngambo, kotungisama na makanisi mpe komona ete ozangi eloko moko ya monene—ata mpe mposa ya kozongisa mabe.
Soki baboti na yo bauti kokabwana, okoki mpe koyoka ndenge wana, mpe yango ekoki kokamwisa te, mpo Mozalisi na biso alingaki ete bana bábɔkwama epai ya papa ná mama. (Baefese 6:1-3) Sikoyo, ozali komona lisusu te moboti oyo ozalaki kolinga mingi. Daniel, oyo baboti na ye bakabwanaki ntango azalaki na mbula 7, alobi boye: “Nazalaki mpenza na mposa ya komona papa mpe ya kozala ná ye. Kasi, mama nde atikalaki kobɔkɔla biso.”
Ntina oyo baboti bakabwanaka
Mbala mingi, bana bakamwaka ntango baboti na bango bakabwani mpo bayebaka te matata oyo ezali kati na baboti na bango. Rachel, oyo azalaki na mbula 15 ntango baboti na ye babomaki libala, alobi boye: “Nalɛmbaki nzoto. Nazalaki kokanisa ete bazalaki kolingana.” Ata soki baboti baswanaka, kasi kokabwana, esalaka mpasi makasi na motema!
Mbala mingi, baboti mingi bakabwanaka mpo moko na bango asali ekobo. Soki likambo ya ndenge wana esalemi, Nzambe apesi nzela na mobali to mwasi oyo asali ekobo te aboma libala mpe abala moto mosusu. (Matai 19:9) Na ntango mosusu, nkanda makasi mpe “koganga mpe maloba ya kofinga” ebimisaki mobulu mpe etindaki moboti abanga mpo bomoi na ye mpe ya bana ekómi na likama.—Baefese 4:31.
Kasi babalani mosusu babomaka libala mpo na makambo ezangi ntina. Na esika ya koluka kosilisa matata na bango, basusu babomaka libala mpo balobaka ete bazali lisusu na “esengo te” to “bolingo esili.” Yango esepelisaka Nzambe te, mpo ye “ayini koboma libala” mpo na makambo ya ndenge wana. (Malaki 2:16) Yesu amonisaki ete babalani mosusu bakokabwana mpo molongani moko akómi mokristo.—Matai 10:34-36.
Masese 24:10) Bakoki mpe kozala na mokakatano to koyoka nsɔni mpo na kondima mabunga na bango.
Ata soki baboti na yo bapesi yo eyano te to bapesi kaka biyano ya bongobongo mpo na ntina oyo babomaki libala, yango elingi koloba te ete balingaka yo te. Lokola bazali kotungisama, mbala mosusu ekoki kozala mpasi báyebisa yo ntina oyo libala na bango ekufi. (Oyo okoki kosala
Luká koyeba makambo oyo ezali kobangisa yo. Lokola kokabwana ya baboti ekoki komema mbongwana na bomoi na yo, okoki kobanda komitungisa mpo na makambo oyo ozalaki komitungisa te liboso. Atako bongo, okoki kokitisa mwa moke kobanga na yo soki obandi naino koyeba mpo na nini ozali kobanga. Tyá elembo ✔ awa na nse, na kare, pembeni ya likambo oyo ebangisaka yo mingi to komá likambo mosusu oyo ebangisaka yo pembeni ya esika oyo bakomi “Makambo mosusu.”
□ Moboti oyo atikali akosundola mpe ngai.
□ Libota na biso ekozala na mbongo mingi te mpo na kobikela.
□ Ntango mosusu, libala na bango ekufi mpo na ngai.
□ Soki nabali, libala na ngai mpe ekokufa.
□ Makambo mosusu ․․․․․
Yebisá basusu mitungisi na yo. Mokonzi Salomo alobaki ete ezali na “ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:7) Yango wana, luká ntango oyo ebongi mpo na koyebisa baboti na yo makambo oyo ezali kobangisa yo, oyo okomaki na likoló. Yebisá bango ndenge makambo yango ezali kopesa yo mawa mpe kotungisa yo. Mbala mosusu, bakoyebisa yo makambo oyo ezali koleka mpe yango ekokitisa yo motema. Soki baboti na yo balingi te to bakoki te kosalisa yo na ntango wana, okoki kosolola ná moninga moko ya mokóló. Yo moko kende kokutana na moto yango. Kozwa moto oyo akoyoka yo ekoki kokitisa yo mpenza motema.—Masese 17:17.
Koleka nyonso, Tata na yo ya likoló akoki koyoka yo ntango nyonso, mpo Ye azali “Moyoki ya Nzembo 65:2) Fungolá motema na yo epai na ye mpo ye “atyelaka [yo] likebi.”—1 Petro 5:7.
libondeli.” (Oyo osengeli kosala te
Kobomba nkanda na motema te. Daniel, oyo tolobelaki liboso, alobi boye: “Baboti na ngai bazalaki kaka kokipe bamposa na bango moko. Bazalaki kokanisa biso mpenza te mpe bazalaki koyeba te ndenge makambo oyo basalaki ekokaki kopesa biso mpasi.” Makambo oyo Daniel alobi ekoki kozala solo. Kasi, okopesa eyano nini na mituna oyo elandi? Komá biyano na yo na mondelo oyo batye na nse.
Likama nini ekoki kokómela Daniel soki atiki te ezaleli ya kobomba nkanda na motema? (Tángá Masese 29:22.) ․․․․․
Atako ekozala mpasi kosala yango, mpo na nini ekozala malamu Daniel alimbisa baboti na ye mpo na mpasi oyo bamonisi ye? (Tángá Baefese 4:31, 32.) ․․․․․
Ndenge nini toli oyo ezali na Baroma 3:23 ekoki kosalisa Daniel atalela baboti na ye na ndenge oyo ebongi? ․․․․․
Kosalaka te makambo oyo ekoyokisa yo mpasi. Denny alobi boye: “Nazalaki na esengo te mpe natungisamaki ntango baboti na ngai babomaki libala. Nabandaki kokutana na mikakatano na kelasi mpe nazwaki te na mbula moko. Na nsima . . . nakómaki kosɛkisa bana kelasi mpe nakómaki kobunda mingi.”
Okanisi ete Denny azalaki koluka nini ndenge azalaki kosɛkisa bana kelasi? ․․․․․
Mpo na nini akómaki kobunda mingi? ․․․․․
Soki okómi na makanisi ya kosala makambo ya mabe mpo oyokisa baboti na yo mpasi, ndenge nini toli oyo ezali na Bagalatia 6:7 ekoki kosalisa yo otalela makambo na ndenge ebongi? ․․․․․
Elikya oyo osengeli kozala na yango
Soki obukani, esɛngaka bapɔsɔ to basanza mpo ozonga malamu. Ndenge moko mpe, esɛngaka ntango mingi mpo bilembo oyo mpasi ya motema esalaki esila. Bato mosusu ya mayele bamonaka ete mpasi oyo eutaka na koboma libala esilaka nsima ya mbula misato. Yango ekoki komonana lokola ntango molai, kasi yebá ete makambo mingi esengeli naino kosalema liboso ete bomoi na yo ezonga ndenge ezalaki.
Osengeli kobongisa lisusu makambo oyo bomesanaki kosala na ndako, liboso baboti báboma libala. Ntango esengeli mpe koleka mpo baboti na yo bábosana makambo oyo ekómelaki bango. Kaka nsima nde bakoki mpenza kosalisa yo. Nzokande, ntango bomoi na yo ekobanda kozonga ndenge ezalaki liboso, okobanda mpe koyoka malamu.
MPO NA KOYEBA MAKAMBO MOSUSU OYO ETALI LISOLO OYO, TÁNGÁ MOKAPO 25, NA VOLIMI 2
Ozali komitungisa mpo papa to mama na yo abali lisusu? Ndenge nini okoki kolonga likambo yango?
VƐRSƐ OYO EKOSALISA YO
“Ezali na ntango . . . ya kobikisa.”—Mosakoli 3:1, 3.
TOLI
Soki baboti na yo babomaki libala, ekoki kozala ete moko na bango to mpe bango nyonso mibale basalaki mabunga. Luká koyeba mabunga yango mpo ozongela yango te ntango okobala.—Masese 27:12.
OYEBAKI YANGO . . . ?
Ezali te mpo libala ya baboti na yo ebebaki nde oyo ya yo mpe ekobeba.
MAKAMBO OYO NAKOSALA
Nakoki koyebisa makambo oyo ezali kobangisa ngai epai ya (komá nkombo ya moto moko oyo akɔmɛli oyo okosepela koyebisa ye yango) ․․․․․
Soki nakómi na makanisi ya kosala makambo ya mabe mpo nayokisa baboti na ngai motema mpasi, nakosala boye: ․․․․․
Na mokapo oyo, nakosepela kotuna moboti (baboti) na ngai boye: ․․․․․
OKANISI NINI?
● Mpo na nini baboti na yo bakoki koboya koyebisa yo ntina oyo babomi libala?
● Mpo na nini ezali na ntina koyeba ete soki baboti na yo babomi libala, ezali nde bango bato bakabwani, kasi yo te?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 32]
“Ntango mama atikaki biso, natungisamaki mingi mpe nakómaki kolela mikolo nyonso. Kasi, nazalaki kobondela mingi, kolekisa ntango mingi mpo na kosalisa basusu mpe kozala ná baninga oyo bakɔmɛli. Namonaka ete na ndenge wana nde Yehova asalisaki ngai nalonga.”—Natalie
[Elilingi na lokasa 33]
Lokola esɛngaka ntango mingi mpo lobɔkɔ oyo ebukanaki ezonga malamu, ndenge moko mpe, ekosɛnga ntango mpo mpasi oyo oyokaki ntango baboti na yo bakabwanaki esila