Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Colombie

MAKAMBO YA ESENGO YA MBULA ELEKI

Mosala ya kosakola na mokili mobimba esengeli kozwa esika ya liboso

Mosala ya kosakola na mokili mobimba esengeli kozwa esika ya liboso

MOKOLO ya misato 23/09/2015, Lisangani ya Mikóló-Bakambi eyebisaki libota ya Betele na mokili mobimba mbongwana oyo etali ndenge ya kobongisa makambo mpo na kosalela malamu koleka makabo oyo epesamaka. Na nsima, na mokolo ya pɔsɔ 03/10/2015, liyebisi moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi elimbolaki boye: “Bafilipi 1:10 ezali kolendisa biso ‘tóluka koyeba mpenza makambo oyo eleki ntina.’ Na boyokani na toli wana ya bwanya, Lisangani ya Mikóló-Bakambi elingi kotya na esika ya liboso misala oyo esalisaka mpenza basaleli ya Nzambe bázala makasi na elimo mpe esalaka ete mosala ya kosakola na mokili mobimba ekende liboso.”

Na nsima, ndeko Stephen Lett, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, alimbolaki boye na TV JW: “Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaka na lisɛki te likambo etali kopesa mabɔkɔ mpo mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi ekende liboso; yango wana tolukaki ndenge ya kosala mpo na kokitisa motángo ya bandeko ya Betele na mokili mobimba mpo mbongo mingi esalelama nde mpo na mosala ya kosakola. Na ndakisa, makambo mpe misala mosusu oyo ezalaki kosalema na Betele banda bambula mingi elongolami to ebongwani. Yango ekosala ete libota ya Betele ezala lisusu na bandeko mingi te lokola liboso.”

Yango wana, kobanda na sanza ya libwa 2015, bandeko ya Betele 5 500 na mokili mobimba bakei kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola na teritware. Atako mbongwana yango esɛngaki makambo mingi ebongwana, lipamboli ya Yehova ezali komonana polele, mpe mbongwana yango esali ete mosala ya kosakola mpe ya koteya ekende liboso.

Na Sri Lanka, ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo bazalaki na Betele kasi batindamaki na teritware mpo na kokende kopesa mabɔkɔ na mosala ya kosakola, bamonaki ete yango ezali libaku ya komonisa kondima na bango epai ya Yehova mpe kotyela ebongiseli na ye motema. Bakomaki boye: “Toyebaki te nini ezalaki kozela biso liboso. Kasi tozalaki na kondima ete Yehova akosundola biso soki moke te. Yango wana tobondelaki boye: ‘Ee Yehova, ezala mokakatano nini tokokutana na yango, salisá biso tóbongola makambo mosusu mpo biso mibale tózala babongisi-nzela ya sanza na sanza.’ Na sanza ya liboso, tozalaki na biloko mingi te ya kobikela. Kasi, tomonaki mpenza ete Yehova alingaka biso mpe akipaka biso, mpe sikoyo tozali na mosala oyo ezali kopesa biso mwa mbongo sanza na sanza mpo na kokokisa bamposa na biso. Tozali na makambo mingi ya kosala: misala ya ndako, mosala ya mosuni, mpe mosala ya mobongisi-nzela. Atako bongo, formasyo oyo tozwaki na Betele ezali kosalisa biso tókabola ngonga na biso malamu. Mosala mosusu te epesaka esengo lokola mosala ya kosalisa bato báyeba solo, mpe tozali na esengo mingi ndenge tozali na likoki ya kosala yango lokola tozali babongisi-nzela.”

Na Colombie, bandeko mosusu oyo bazalaki na Betele bayekolaki monɔkɔ ya sika mpe bakendaki kofanda na bateritware ya mosika mpo na kosakola nsango ya Bokonzi epai ya bato oyo bafandaka kuna. Bandeko mibali mpe basi yango bazali mpenza lipamboli mpo na masangá na bango ya sika. Mokɛngɛli ya zongazonga moko akomaki boye mpo na ndeko mobali moko ná mwasi na ye oyo batindamaki na lisangá moko na zongazonga na ye: “Bandeko na lisangá yango bazali kosepela mingi na lisalisi na bango. Bandeko bakómi kobima mingi na mosala ya kosakola mpe bazali kosakola malamu; bandeko ya lisangá yango bazali kozwa formasyo mpo na kokokisa mikumba ndenge na ndenge na kati ya lisangá.” Bandeko mingi oyo bazalaki na Betele bazwi bibongiseli mpo báyaka kopesa mabɔkɔ na Betele mokolo moko to koleka na kati ya pɔsɔ.

Ndeko mobali moko oyo asalaki mbula 31 na Betele ya Japon atindamaki na lisangá moko oyo ezalaki kaka na bankulutu mibale. Lokola lisangá yango ezalaki kozela ete mosala ya kobongisa Ndako ya Bokonzi ebanda, ndeko yango amibongisaki mpo asala mosala ya mosuni te na boumeli ya pɔsɔ mibale. Kasi mwa moke liboso ete mosala yango ebanda, mabele eninganaki makasi na Kumamoto, esika oyo lisangá yango ezalaki. Lokola azalaki kokende mosala te mikolo wana, azalaki na likoki ya kokamba mosala ya kosunga bandeko oyo bakwelaki likama mpe kolendisa bango na elimo. Alobi boye: “Soki nakanisi, nakoki koloba ete Yehova nde atindaki ngai na esika oyo mposa ezali mingi.”

Ndeko Phil ná mwasi na ye Sugar, oyo bazalaki na Betele ya Australasie, alobi boye: “Ntango batindaki biso na teritware, tozalaki na ekateli ya kokoba kozala na bomoi oyo ezangi mindɔndɔ. Tobondelaki Yehova akamba biso mpo tózwa bikateli ya malamu mpe apambola ekateli nyonso oyo tozwi. Tozalaki na mposa ya komipesa mingi na mosala ya kosakola na lisangá moko na mboka mopaya. Ya solo, Yehova apambolaki ekateli na biso mpe asembolaki nzela na biso mpo tókoka kosalela ye na molimo na biso mobimba!” Lelo oyo, ndeko yango ná mwasi na ye bazali kopesa mabɔkɔ na etuluku moko ya Lingelesi na esanga Samal, na etúká ya Davao, na ekólo Philippines, oyo ezali na basakoli 34 mpe babongisi-nzela ya sanza na sanza 9. Sikoyo bazali na baadrɛsi soki 120 ya bato oyo basepelaki na nsango malamu, oyo esengeli kolandela bango. Balobi boye: “Mosala monene mpe ya ntina mingi ezali kosalema kuna. Tozali na esengo ndenge totyelaki Yehova motema mobimba. Ya solo, kondima na biso mpe bolingo oyo tolingaka ye ekómi lisusu makasi!”

Na Russie, ndeko mwasi moko monzemba oyo atindamaki mobongisi-nzela monene alobi boye: “Mosala ya mobongisi-nzela epesi ngai libaku ya kosakola mingi nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe, mosala oyo eleki ntina mpe ekozongelama lisusu te. Nazali na esengo mingi mpo nazali esaleli na mabɔkɔ ya Yehova.” Lelo oyo, ndeko mwasi yango azali koyekola Biblia na bato 6. Bato yango mosusu bautá na bikólo lokola Iraq, Nigeria, Sri Lanka, Syrie, mpe Zambie.

Zambie: Bandeko bazali koyamba na esengo bandeko oyo babimi Betele, oyo bayei na lisangá na bango

Na Zambie, bandeko mingi ya libota ya Betele batindamaki babongisi-nzela ya sanza na sanza. Bazali komona ete yango epesi bango libaku ya kosala mingi na mosala ya kosakola. Ndeko Andrew, oyo azali mobongisi-nzela elongo na mwasi na ye, alobi boye: “Mwa moke nsima ya kobima na Betele, tosalisaki bato mibale oyo bayebaki kotánga te báyekola kotánga mpe kokoma. Mosika te, elenge moko ya mbula 10 oyo toyekolaka na ye Biblia akosala mokumba na ye ya liboso na likita ya katikati ya pɔsɔ. Mobali moko ná mwasi na ye oyo topesaki litatoli bayanganaki na Ekaniseli mpe banda wana bazangisaka makita ya lisangá te. Bazali mpenza kokende liboso na boyekoli na bango ya Biblia. Tomonaka ete nyonso wana ekokaki kosalema te soki tolandaki te litambwisi ya Yehova, kondima lisalisi na ye mpe kozela lipamboli na ye.”

Ndeko Edson ná mwasi na ye Artness, oyo bazali mpe na Zambie, basɛngaki bango bátika mosala ya Betele mwa basanza moke nsima ya libala na bango. Ndeko Artness alobi boye: “Formasyo oyo tozwaki na Betele esalisi biso tóyeba kosalela na ekɛngɛ nyonso biloko oyo tozalaki na yango, tókoba kozala na esengo, mpe tózwaka banyongo te. Toyokaka mawa te ndenge tozwaki libaku ya kosala na Betele. Toyekoli ndenge ya komityela mikano ya elimo mpe kokokisa yango na lisalisi ya Yehova. Kondima na biso epai ya Yehova ekómi lisusu makasi, mpe tobongisami mpo na kokoba kozala sembo epai ya Yehova.”